Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Misala mya ba partis mitelesami, couvre-feu etiami nsima na kufa ya koleka bato 50 na botelemeli gén. Deby na N'Djamena


Batelemeli basali milulu na balabala na N'Djamena, Tchad, 20octobre 2022. Le Visionnaire/via REUTERS
Batelemeli basali milulu na balabala na N'Djamena, Tchad, 20octobre 2022. Le Visionnaire/via REUTERS

Mbulamatari ya Tchad etelmisi misala minso ya mangomba ma politiki na société civile mpe etie couvre-feu nsima na liwa lya bato koleka 50 na botelemeli botikali ya general Mahamat Idriss Deby Itno na bokonzi, mokolo mwa minei 20 octobre 2022, na N’Djamena, engumba mokonzi.

Ministre wa Yambo ya sika Saleh Kebzabo, mokambi ya opposition ya kala, oyo atiami na ebonga eye wuto mposo moleki na suka ya masolo to dialogue esalaki sanza eleki nde asaloki mokano moye.

Mangomba mabale manene ma opposition maboyaki kozala na masolo mango mpe elongo na bayi socié civile masengaki bato kokita o'balabala nsima na Dialogue national de réconciliation (DNIS) kondima ete général Mahamat Idriss Deby atikala kokamba Tchad, na transition mpo na mibu mibale misusu kino bosalami ya maponami mpe apesama ndingisa ya kowelela maponami mango ata ko esengeli nde bokonzi bozongisama na ba civili.

Na mibu 38, général Mahamat Idriss Deby Itno, mwana ya mokonzi ya kala ya Tchad maréchal Idriss Deby Itno oyo abomamaki na avril 2021 na bitumba na batomboki, akitanaki na tata wa ye mpe akambaka bokonzi ya baso wuto sika sanza zomi na mwambe.

Ministre wa Yambo alobi koleka bato 300 bazoki na milulu mya botelemeli bosalamaki na N'Djamena na bingumba misusu.

Batelemeli baye bapesamaki ndingisa te basalaki mobu na ndako ya mbulamatari, mpe na ndako ya lingomba lya politiki ya ministre wa Yambo mpe na eye ya mokambi ya Assemblée nationale, eyebisi molobeli ya mbulamatari ya Tchad. Bato baike bakufi na masasi, kolanda litatoli lya minganga.

Mokambi ya Commission ya Union africaine, Moussa Faki Mahamat lokola mpe ekolo France, bapameli na makasi ndenge bosaleli ya nkaza na kopanza milulu miye.

XS
SM
MD
LG