Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bofundi ya mwana ya dos Santos mpo na "bobomi" bwa tata na ye bobwakisami na Espagne


FILE PHOTO: Angola's President Jose Eduardo dos Santos waves as he leaves Sao Bento Palace after a meeting with Portuguese Prime Minister Jose Socrates in Lisbon
FILE PHOTO: Angola's President Jose Eduardo dos Santos waves as he leaves Sao Bento Palace after a meeting with Portuguese Prime Minister Jose Socrates in Lisbon

Tribunal moko eboyi ya Espagne kokoba kolandela bofundi ya mwana mwasi ya José Eduardo dos Santos mokonzi ya kala ya Angola, boye bolobaki ete baike balukaki koboma ya tata na ye.

Welwitschea Tchize dos Santos, mwana mwasi ya nkondo José Eduardo dos Santos afundaki likambo lyango yambo na liwa lya tata na ye oyo akufaki le 8 juillet eleki.

Welsitschea “Tchizé” dos Santos alobaki kala ete mwasi ya tata na ye, Ana Paula, oyo azalaki mpe monganga ya tata na ye azalaki na mokumba ya bobebisami ya bokolongono ya nzoto ya José Eduardo dos Santos ntango azalaki koluka lisalisi na Clinique moko ya Barcelone, ma Espagne wuto sanza ya motoba eleki.

Mokano mwa Tribunal moye mosakolami mardi 4 octobre mokundoli ete autopsie to lipaso lya embembe liye lisalamaki na bosenga ya Tchizé dos Santos libimisaki bilembo biye bindimamaki nsima na mokanda ya suka ya autopsie, na kobakisa botali misusu, molakisaki ete kufa ya José Eduardo dos Santos ezalaki liwa lya nzambe.

Tribunal yango ezwaki mokano mwango le 19 septembre. ata ko esakolami kaka le 4 octobre 2022.

"Lokola ezalaki kaka liwa lya Nzambe, mbeba esusu ekoki kolukama te," elobaki zuzi.

José Eduardo dos Santos akufaki le 23 juin 2022 na mibu 79 na nkwokoso ya motema. Akambaki Angola mibu 38, wuto 1979 kino 2017 mpe atikaki bokonzi mpo na bokolongono bwa nzoto.

XS
SM
MD
LG