Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Liwa lisengami mpo na ba colonels babale ya FARDC nsima na bobomi bwa ba Chinois babale


Botimoli bwa mabanga ma ntalo na RDC
Botimoli bwa mabanga ma ntalo na RDC

Etumbu ya liwa esengami na bato zomi na moko na kati na bangoba colonels babale ya mampinga ma RDC (FARDC), nsima bobomi bwa bayi ekolo Chine babale baye bazalaki kosala misala ya kotimola mabanga ma ntalo na sanza ya misato ya mobu moye na ngambo ya Est ya ekolo Congo démocratique.

Procureur ya soda asengi etumbu ya liwa mpo na ba colonels Mukalenga Shendeko mpe Kayumba Sumaili mpe bato libwa basusu babale kati na bango babale baye bakima mpe bazali komonana te, mpe etumbu ya sanza zomi na mibale ya boloko mpo na soda mosusu na nkombo ya Eric Ezwa.

Kolanda maloba ma colonel Kumbu Ngoma, bato baye bamonani kozala baye babongisaki makambo manso mpo na bobomi bwa ba Chinois baye o mokolo mwa le 17 mars 2022, na territoire ya Irumu o etuka ya Ituri, mpo na koluka koyiba ba lingots mineyi ya wolo mpe 6000$ eye bazuaki nsima bobomi bango.

Mokolo mwa le 17 mars ya mobu moye, mituka miike mya bayi ekolo Chine mizalaki na nzela ya kozonga epayi wapi bawutaki na botimoli wolo na mboka Nderemi. Ba Chinois babale babomamaki mpe sofele na bango ya civil azokaki.

Bosengeli koyeba ete, na RDC, ata ko etumbu ya liwa esakolamaka mbala na mbala kasi ebongwamaka na ndenge ya boloko ya libela. Mpe etumba ya liwa etelemisa na RDC wuto mingi.

Bosambisi boye bobandaka o mokolo mwa le 25 juillet ya mobu moye bokokoba o mokolo mwa misato, elobi magistrat Colonel Dienga Akelele, président ya yambo ya tribunal militaire ya Ituri.

Na RDC, bitumba mpe bokangami ya bato ba ekolo Chine baye bazali kosala na bisika ya botimoli mabanga ma ntalo ezali mingi te, na bituka bipayi mangomba mayike ma basimba minduki mazali, lokola na etuka ya Ituri.

XS
SM
MD
LG