Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nkumu ya mwasi Elizabeth II akufi na mibu 96 mpe mwana wa ye Charles akitani na ye


Nkumu ya mwasi Elizabeth II (G) na prince Charles, na Parlement na Londres, 14 octobre 2019
Nkumu ya mwasi Elizabeth II (G) na prince Charles, na Parlement na Londres, 14 octobre 2019

Nkumu ya mwasi Elizabeth II ya Royaume-Uni akufi na mibu 96 nsima na minganga ba ye kosakola ete bamitungisami mpo na bokolongo bwa ye.

Prince Charles mwana wa ye ya mokolo koleka nde akitani na ye.

Libota lya ye lisanganaki wuto minganga basakolaki ete bamitungisami mpo na bokolongono bwa ye.

Wuto moko, bokolongo bwa ye bozalaki kotungisa ye.

Union africaine elobi eyoki mawa na kufa eye.

Losako lopesami kowuta bisika na bisika nsima na liwa lya Nkumu ya mwasi Elizabeth ya mibale ya Royaume-Uni oyo awuti kokufa.

Nkondo nkumu ya mwasi oyo awuti azalaki na mibu ntuku libwa na motoba mpe atikalaki mibu ntuku sambo na ngwende.

Nkumu ya mwasi Elizabeth ya mibale azalaki elembo ya ekolo Grande-Bretagne mpe ya mboka ya bokonzi Royaume-Unie mpe ya bosangi ya bikolo bya Commonwealth.

Nkumu ya sika Charles ya misato oyo azali mwana ya mokolo koleka ya Ezizabeth II, na mibu ntuku sambo na misato, alobi ezali ntango ya mawa koleka.

Losako lotindami wuto bisika na bisika mpo na kokanisa nkumu eye ya mwasi.

XS
SM
MD
LG