Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Opposant Adalberto Costa ya Unita aboyi kondima bilembo bizali kobima na Angola


Adalberto Costa Junior, mokambi ya Unita, lingomba lya monene koleka na opposition na Angola, azali kopona, Luanda, Angola, 24 août 2022.
Adalberto Costa Junior, mokambi ya Unita, lingomba lya monene koleka na opposition na Angola, azali kopona, Luanda, Angola, 24 août 2022.

Adalberto Costa Junior, mokambi ya Unita, lingomba lya monene ya opposition ya Angola, aboyi kondima bilembo bizali kobimisa nsima na maponami ma mokonzi ya mboka mpe ya bakeli mibeko ya mokolo mwa misato moleki na mboka na ye.

“Unita ezali kondima te bilembo ya kozela,” elobi Adalberto Costa Junior liboso lya bapanzi sango na Luanda.

Mokambi ya Unita asengi commission internationale etiama mpe ebandela kotanga bilembo. Alobi alongi maponami maye.

MPLA, lingomba lya mokonzi azali na ebonga sika, Joao Lourenço, ezali na 51,07% na 97% biye Commission electorale, misala mya kobongisa maponami, mibimisiaki kino mokolo mwa minei na mpokwa.

Kolanda bilembo byango, Unita ezali sika na 44,05%.

Na mibu ntuku motoba na mwambe, Joao Lourenço azali bongo kokende na kotikala na ebonga mpo na bokonzi ya mibale na Angola. Molebli ya lingomba lya ye, MPLA, Rui Falcao alobi MPLA ezwi bibonga mingi mpo batikala na bokambi mboka. B

ana ba Angola pene na million zomi na minei na nkoto minei nde bakendaki kopona mikolo mibale mileki to mokolo mwa miato.

Soki bilembo biye bitakali lolenge bizali sika, ekozala mbala ya yambo nde MPLA eye ezali na bokonzi wuto lipanda to wuto pene na mibu ntuku minei na sambo ezwa bilembo bya nse koleka.

Na 2017 Joao Lourenço na MPLA balongaki na 61% mpe na 2012 ezalaki 71,84%.

Mbala eye, Unita, lingomba ya monene koleka na opposition, ekozwa bilembo mingi koleka mbala inso elaka, mpo ekomi bongo sika na 44,05%, kolanda commission electorale. Unita ezwaki 26,67% na 2017.

XS
SM
MD
LG