Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi na Guterres basololi nsima na basoda ba Monusco koboma bato basato na Kasindi


Président Félix Tshisekedi ayambi kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na Kinshasa, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi ayambi kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na Kinshasa, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Mokonzi ya Ekolo congo démocratique Félix Tshisekedi asololaki na nzela ya singa na Kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres, mokolo moko nsima na ba soda ba monusco, misala mya kimya mya ONU na RDC, koboma bato basato na masasi na Kasindi, na Beni, na Nord-Kivu.

"Bato babale baye balobelaki makambo matali ba casques bleus (basoda ba kimya) na monyele ya RDC, mingi mpenza matata na bana mboka," elobi présidence ya RDC na compte Twitter na yango.

Kalaka mokonzi ya ONU azwaki libaku liye mpo na kopesa maloba ma kobondisa mitema ya mokonzi ya mboka na mabota mabungisi bana ba bango mpe na bana ba Ekolo Congo démocratique banso, ebakisi présidence ya RDC.

Bato basato bakufaki o’mokolo mwa eyenga na ntongo nsima na ba casques ba ekolo Tanzanie kobeta bango masasi na Kasindi, na ndelo na Uganda.

Mokambi ya Monusco mpe molakis elongi ya kalaka mokonzi ya ONU na RDC, Bintou Keïta alobaki na liyebisi ete ayoki motema mpasi mpo na bobomi boye mpe alakaki ete baye basali yango bakopesama etumbu.

Na ngambo na yango, mbulamatari, na monoko ya molobeli na yango Patrick muyaya, esakolaki ete basoda baye basali yango bakozala lisusu te na misala mya kimya mya ONU.

Police na mampinga mabenganaki lundi na ntongo batelemeli bamekaki kosanga pene na base ya Monusco.

Bobomi boye bosalami ntango biyoma mpe milulu mizala kosalama na bingumba mingi ya monyele ya mboka mpo na kosenga bolongwi ya Monsuco na RDC.

Batelemeli bazali kopamela Monusco kokota te kozongisa kimya wuto mibu 22 ezalaka na RDC.

Bato koleka 20 basi bakufi na bisika mingi na biyoma yango.

XS
SM
MD
LG