Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nkoko ya Mobutu, Malo Mobutu alongi maponami ma moyangeli ya Nord-Ubangi


Malo Mobutu Ndima, koko ya mokonzi ya kala ya Ekolo Congo démocratique (Zaïre), Kinshasa, 2022. (Twitter/Malo Mobutu)
Malo Mobutu Ndima, koko ya mokonzi ya kala ya Ekolo Congo démocratique (Zaïre), Kinshasa, 2022. (Twitter/Malo Mobutu)

Malo Mobutu Ndima, nkoko ya mokonzi ya kala ya Ekolo Congo démocratique (Zaïre), Mobutu Sese Seko, alongi maponami ma moyangeli ya etuka ya Nord-Ubangi.

Na mibu ntuku mine (40), Malo Mbutu Ndima aponami bongo na bakeli mibeko ba etuka eye zomi na moko likolo na motango ya zomi na mwambe na maponami masalamaki o'mokolo mwa mibale 12 juillet 2022.

Bato basusu motoba bawelalki mpe ebonga eye. Kati na bango Marie-Claire Kengo Wa Dondo, mwana ya ministre ya Yambo ya kala Kengo wa Dondo oyo zwi nde boponami na bato basato.

Sénateur Basile BAle Bila nde aponami kaka na moto moko.

Malo Mobutu Ndima akokitana bongo na Izato Nzege Koloke oyo atiakaka mosala le 8 décembre 2021 na kopamelaka motungisi ya bakeli mibeko.

XS
SM
MD
LG