Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi na Kamerhe bakutani


Mokonzi ya mboka ya RDC Félix Tshisekedi ayambi mokambi ya kala ya ndako na ye ya mosala Vital Kamerhe na Cité ya Union africiane, Kinshasa, le 28 juin 2022.
Mokonzi ya mboka ya RDC Félix Tshisekedi ayambi mokambi ya kala ya ndako na ye ya mosala Vital Kamerhe na Cité ya Union africiane, Kinshasa, le 28 juin 2022.

Président Félix Tshisekedi ayambaki, o'mokolo mwa mibale 28 juin 2022 na mpokwa, Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya mosala mwa ye ya kala, na Cité ya Union africaine, na Kinshasa.

Vital Kamerhe na Felix Tshisekedi bamimoni nsima mibu mibale ya bokabwani mpo na bosambisami ya Vital Kamerhe na bofundami na ye na kopengwisa mosolo mwa leta koleka ba millions ntuku mitano mpe akatelamaka mibu ntuku mibale.

Kasi o mokolo mwa le 23 juin moleki, Cour ya cassation ekataki ete Vital Kamerhe amonanaki te na kopengwisa mosolo moye, mpe atikamaki.

"Esengo eza makasi! Esengo ya kokutana na moningami monene ya politiki, Na lobi ete Nzambe azali monene. Soki ozali na kondima, nyonso ekoki kosalama... Ata momekano nini mokomeli yo, momekano moye mosengeli kozala na nse ya molendo ya maye olingi kopesa na ekolo, na mboka mpe na lisanga. NDenge wana nde tokolonga." elobi M. Kamerhe nsima na bokutani bwango.

Na biyano apesaki na bapanzi sango ya ndako ya mosala ya Felix Tshisekedi, Vital Kamerhe asakoli ete azali kaka na botosi na President Tshisekedi, mpe akosala manso mpo na kokolisa bosangani kati na UNC parti na ye na Udps ya Felix Tshisekedi.

Asakoli ete azali na makanisi ya kokabola mpo na bozongisi kimia na Est ya ekolo Congo democratique.

Na motuna ya koyeba soki azali na makanisi ya kokoma ministre wa yambo, Vital kamerhe asakoli ete azali komimona ye moko lokola moyi ekolo inso oyo akoki kosalela ekolo wa ye.

XS
SM
MD
LG