Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Police etindi na ba zuzi bilenge batambolaki na machette na Kinshasa


Des policiers na Goma. Nord-Kivu, 20 décembre 2021
Des policiers na Goma. Nord-Kivu, 20 décembre 2021

Bilenge baike batiami maboko na Kinshasa mpo bamemaki ba macheti mpe bakanaki kobundisa baye balobaka kinwaRwanda, na kofundaka bango kopesa maboko na batombaki ba M23, esakoli police na engumba mokonzi ya Ekolo Congo démocratique.

Commissaire sous-divisionnaire, Sylvain Kasongo, mokambi ya police na Kinsahsa, alobi bilenge bango bapesami na ba bazuzi mpo balingaki kotia mobulu na mboka.

Ezali nsima na video eye ekabolamaki na ba réseaux socaiux mposo moleki, kolakisa bielenge baike kotalatala na mituka mpo koluka bato ya bilongo songolo na macheti na maboto, elimboli molobeli ya police na Kinshasa.

Bilenge yango balataki sokoto lokola ya basoda. Moko kati na bango ayebana bo’ moyi parlement debout ya UDPS. Akangami mpo na maloba ma ye ma kotinda na boyinani.

XS
SM
MD
LG