Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Papa François akosala lisusu te mobembo na RDC na juillet mpo na mpasi na nzoto


Papa François, na nzete na maboko, asungami mpo na kotelema na misa na esika ya Santu Petelo, Roma, 8 juin 2022.
Papa François, na nzete na maboko, asungami mpo na kotelema na misa na esika ya Santu Petelo, Roma, 8 juin 2022.

Papa wa Roma, Papa François akosala lisusu te mobembo na Ekolo Congo démocratique le 2 kino le 5 kuillet 2022 ndenge elengelamaki. Ezali mpo na nkwokoso azali na yango na nzoto.

Tata mosanto andimi bosenga ya minganga na ye na ntina kobebisa te lisalisi lizali kopesamela ye mpo na mpasi na ebolongo, elobi misala mya ma Papa François wuto Vatican.

Na ngambo na yango, mbulamatari ya RDC eye endimi sango yango, etombeli Papa François lobiko ya lombango mpe elobi ete ekobi kozela ye na molende.

Kolanda mbulamatari ya RDC, mobembo mwango motindikami na mokolo moyebani nanu te.

Papa wa Roma andimaki bobengisama ya président Félix Tshisekedi mpo na kokende na RDC na ntina ya kimya mpe bozongisi bondeko na Yesu-Klistu.

Esengeli akende na Kinshasa, Goma (Kimbuba) mpe Lubumbashi.

Papa François esengalaki mpe akende na Soud du Sud kasi akosala mpe mobembo mwango te.

XS
SM
MD
LG