Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Boyokani ya Katanga: Kabila na Katumbi bapesani mbote


Mokonzi ya kala ya Ekolo Congo démocratique (RDC), Joseph Kabila, na mokambi ya kala ya etuka ya Katanga (ya kala), Moïse Katumbi, bapesani mbote na Forum ya boyokani ya Katanga, Lubumbashi, 22 mai 2022. (VOA/Narval Mabila)
Mokonzi ya kala ya Ekolo Congo démocratique (RDC), Joseph Kabila, na mokambi ya kala ya etuka ya Katanga (ya kala), Moïse Katumbi, bapesani mbote na Forum ya boyokani ya Katanga, Lubumbashi, 22 mai 2022. (VOA/Narval Mabila)

Joseph Kabila, mokonzi ya kala RDC (Ekolo Congo démocratique) na mokambi ya kala ya Katanga Moïse Katumbi bapesani mbote mpe balie esika moko o'mokolo mwa eyanga na Lubumbashi bo' elembo ya boyokani ya bana Katanga, na likita to Forum ya boyokani ebandaki wuto sika mposo moko.

Kino botuani boye, MM. Kabila na Katumbi batalamaki na bato mingi lokola babanda makasi na politiki.

Nzokande, M. Katumbi azalaki wuto mibu mingi moko ba nsomi ya lingomba PPRD (Parti du peuple pour la reconstruction et la démocratie) ya M. Kabila kasi bakbwanaki na 2014 yambo na maponami masengalaki kosalama na 2016, ntango mokambi ya kala ya Katanga (M. Katumbi) akomaki kotelemela mokonzi ya mboka (M. Kabila) na kolukaka kotikala na bokonzi na "faux penalty ya misato".

Bokutani, bopesani mbote mpe boleyi esika ya bango mibale ezali elembo ya makasi ya boyokani kati na bana ba Katanga baye bakabwanaki mingi na ngambo mibale ya ba nsomi babale baye.

Boyokani mpe bokutani boye bozali kosalama na bokambami ya episkopo ya lokumu ya Lumbubashi Mr. Fulgence Muteba.

XS
SM
MD
LG