Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ngambo mibale ya basimba minduki nde babomi bato na kowelelaka mine ya wolo na Mungwalu, elobi FARDC


Basoda ya Monusco bazali kobongisa motuka na bango na Djugu, Ituri, 27 mars 2018.
Basoda ya Monusco bazali kobongisa motuka na bango na Djugu, Ituri, 27 mars 2018.

Mokambi ya soda ya etuka ya Ituri, Lt Général Johnny Luboya Nkasama, alobi ba civili baye bakufi na suka ya mposo moleki na Banyali-Kilo, na tettiroitre ya Djugu (Ituri) babomamaki nde na ngambo mibale ya basimba minduki baye bazali kowela mine ya wolo moko.

Na liyebisi lityami manzaka na molebeli ya mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC) na Ituri, lt Jules Ngongo Tshikudi, mokambi ya soda ya etuka eye alobi wuto mwa ntango, mangoma Zaïre (Ba Maï Maï) na Codeco (Coopéraitve pour le développement du Congo) babundaka na territoire ya Djugu, mingi mpenza na esika ya makele.

Mangomba maye mabale mabundaka “na ntina ya kotia maboko na bomengo yango na kobundisaka bavandi na secteur Banyali-Kilo, na commune rurale ya Mungwalu mpe chefferie ya Mabendi,” elobi liyebisi lya FARDC.

Kolanda bourgmestre ya commune rurale ya Mungwalu, koleka ba civili ntuku misato na mitano bakufaki na bobomi bwango.

Bato basusu koleka ntuku misato na minei bazokaki mpe bamemamaki na lopitalo.

XS
SM
MD
LG