Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi na Sassou bapesi longonya na Macron mpo na elonga na ye na France


Prezidan Franse a Emmanuel Macron salye elekte yo ansanm ak madanm ni Brigitte Macron apre li re-eli prezidan Dimanch 24 Avril, 2022.
Prezidan Franse a Emmanuel Macron salye elekte yo ansanm ak madanm ni Brigitte Macron apre li re-eli prezidan Dimanch 24 Avril, 2022.

Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique, Félix Tshisekedi, lokola mpe mokokani wa ye ya Cong-Brazzaville, Denis Sassou N’Guesso, bapesi longonya, moto na moto na ngambo na ye, na président Emmanuel Macron mpo na elonga na ye na 2e tour ya maponami ya mokonzi ya France.

"M. le président mpe wa bolingo Emmanuel Macron, napesi yo longonya mpo elonga na yo enene na maponami ma bokambi ekolo France," ekomi M. Tshisekedi na mokanda atindi, elobi présidence ya RDC na compte Twitter na yango.

"Mandat eye ya sika ekopesa biso nzela ya koyikisa lisusu makasi boyokani kati na RDC na France," ebakisi M. Tshisekedi.

Na ngambo na ye, M. Sassou mpe atindi maloba ma kosepela na elonga ya M. Macron.

"Na makambo malamu maye masalami, ezali mpenza esengo mpo na ngai kopesa yo, na nkombo ya bana mboka na ngai, na ya mbulamatari ya Congo mpe ya ngai moko, longonya makasi," ekomi na ngambo na ye M. Sassou na mokanda présidence ya Congo-Brazzaville etie na compte Twitter na yango.

M. Sassou alobi "asepli na boyokani ya bondeko kati na France na Congo-Brazzaville mpe abandeli kolakisa bolingo" na ye "ya kokoba kosala na M. Macron mpo bolamu ya bana ya bikolo mibale".

M. Macron alongaki o’mokolo mwa eyenga, tour ya mibale ya maponami ya mokonzi ya mboka France na 58,5% liboso ya mbanda na ye na momekano moye, Marine Le Pen oyo azwi 41,5%.

Bato koleka 28% baboyaki na bango kopona na France.

XS
SM
MD
LG