Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

M23 na mbulamatari basala masolo banda le 22 avril na bokambami ya Kenyatta


Président Uhuru Kenyatta mokonzi ya Kenya (G) na mokokani wa ye Félix Tshisekedi ya RDC na Kinshasa, 20 avril 2021. (Twitter/Présidence RDC)
Président Uhuru Kenyatta mokonzi ya Kenya (G) na mokokani wa ye Félix Tshisekedi ya RDC na Kinshasa, 20 avril 2021. (Twitter/Présidence RDC)

Masolo kati na batomboki ba M23 na bayi mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique makobanda lobi le 22 avril 2022 na Nairobi, engumba mokonzi ya Kenya, na bokambami ya président Uhuru Kenyatta na Kenya.

Yango mokano ya makasi mozwami na bokutani ya bakambi ya bikolo kati na Lisanga lya Afrika ya est CEA, esalami lelo na engumba mokonzi ya Kenya.

Président Félix Tshisekedi akomaki na engumba mokonzi ya Kenya wuto ntongo ya jeudi. Azalakii kuna na bakonzi ba Uganda, Burundi mpe Kenya, kasi Rwanda etindaki nde ministre na yango ya mambi ya Bapaya. Balakisi bilongi ya Soudan du Sud na Tanzanie mpe bazali kuna.

Masolo masusu, kaka kuna na Nairobi, makokamba na president Tshiskedi mpe makotala bokengi mpe bobateli mboka.

Mampinga ma etuka makotindama mpe mpo na kobundisa mangomba mabengami ba forces négatives.

Ekolo Congo démocratique esakolaki ete ekangaki boko na basoda ba Rwanda kati na batomboki ya M23 mpe ezali kofunda Rwanda na kosunga lingomba liye, kasi Rwanda ezali kowanga likambo lyango. Bakanzi ba bikolo kati na CEA bakutanaki le 30 mars eleki na Kenya na milulu mya bokoti ya RDC na lisanga liye.

XS
SM
MD
LG