Ketanji Brown Jackson andimami lelo na Sénat bo’ moko na zuzi libwa ya Cour suprême ya Etats-Unis.
Akomi mwasi ya yambo ya moyindo ya kotiama na ebonga yango.
Na mibu 51, aponami andimami ba sénateurs ntuku mitano na misato, mingi mingi ba démocrates mpe ba républicains baike.
Ba sénateurs 47, ba républicains nde baboyaki ye. Kentanji Brown Jackson aponamaki na président Joe Biden, démocrate, le 25 février.
Alekaki na mituna mingi ya bayi Congrès. Ezali ngonga ekotikala na lisolo mpo na ekolo, elobi Joe Biden.