Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

François Beya atindami na Makala (CPRK)


Fançois Beya (G), mopesi toli ya lokumu ya président Félix Tshisekedi (D) mpo ya mambi ma bokengi na bokutani na bango mibale (Présidence ya RDC_
Fançois Beya (G), mopesi toli ya lokumu ya président Félix Tshisekedi (D) mpo ya mambi ma bokengi na bokutani na bango mibale (Présidence ya RDC_

François Beya, mopesi toli ya lokumu ya kala ya président Félix Tshisekedi atindami na boloko bonene ya Makala (CPRK) nsima na bokangami wuto sanza mibale na ANR , misala mya bokengi ya RDC.

François Beya azali na Makala wuto mpokwa ya lelo, esakoli Asadho, lingomba lya makoki ma bomoto, Jean-Claude Katende.

Tosengeli totelema mpo ete makoki ma ye ma lotomo mayeba kotosama mpe apesama bosambisami ya sembo mpe esengeli, ebakisi M. Katende.

M. Beya asimbamaki wuto le 5 février na ANR mpo na koyanola na mituna mpe atikala kobima te wuto ntango yango.

Mposo mibale nsima na bokangami na ye, molobeli ya président Félix Tshisekedi, asakolaki ete M. Beya akangamaki mpo na bilembo bimonisaki ete azalaki na bobebisi bokengi ya ekolo.

Bayi nzinga nzinga na ye lokola basangana na liboke « Free François Beya” mpe babundi baike ba makoki babomoto bazalaki kosenga ete amemama na bazuzi.

XS
SM
MD
LG