Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Codeco etiki bato basato kasi esimbi nanu Lubanga na basusu


 Thomas Lubanga (katikati) akisubiri hukumu yake katika mahakama ya ICC huko the Hague.
Thomas Lubanga (katikati) akisubiri hukumu yake katika mahakama ya ICC huko the Hague.

Basimba minduki ya lingomba Codeco (Coopérative pour le développement du Congo) babimisi na bokangami bato basato basusu ya task force ya mbulamatari mpo na masolo na basimba minguki na Ituri. Kasi basimbi nanu mokambi ya task force Thomas Lubanga, Floribert Ndjabu na bato basusu babale.

Sango yango epesami na VOA Lingala na molobeli ya task force Pitchou Iribi.

"Ba bundi ba Codeco batiki général Germain Katanga, président ya ONG Unadi Ayendu Bin Ekwale na mokumbi motuka na bango kasi basimbi nanu Thomas Lubanga, Floribert Ndjabu, Lobho Kamwanda na Lobho Bissi," elobi M. Iribi.

Mikolo mileki bayi Codeco batikaki mpe moko na bato mwambe bakangaki na limpinga lya Task force.

Codeco ezali kosenga makambo maike yambo na kotika bayi task banso. Baye bakangami bazalaki na motango ya mwambe.

Basengi botikami ya bayi kabila na bango (lendu) baye bakangama na bitumba, bondimami na bango kati na mampinga ma RDC mpe makambo masusu.

Bayi Codeco balobaka ete bakanga bayi task force le 16 février 2022 ntango mampinga mabandaki kobeta bango masasi kati na masolo limpinga liye litindamaki lizalaki na yango na bbabundi.

XS
SM
MD
LG