Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CENCO esengi basango banso babota batika bonganga Nzambe

FILE - Archbishop Marcel Utembi, second left, president of the National Episcopal Conference of Congo (CENCO), and other Catholic bishops arrive for the signing of an accord at the interdiocesan center in Kinshasa, Jan. 1, 2017 following talks launched by

CENCO, likita lya ba episkopo ya Katoliko ya Ekolo Congo démocratique, lisengi na ba sango banso baye bazali na bana batika mosala mpo na kokende kozwa mokumba ya bana ba bango.

Ba episkopo batindeli basango mokando mpo na yango mpe AFP emonaki yango.

CENCO elobi etali "makoki mpe lotomo ya kozala moboti mpo na bana" mpe "mokumba ya botata na bana" eye ekoki te kozala esika moko na "bomoi ya bonganga Nzambe na eklezia katoliko".

"Tosengi na sango nyongo… azali na mwana kokende kozwa mokumba mobimba mpe kosenga botiami pembeni na bonganga NZambe epayi na Tata mosanto," ekomi ba episkopo.

"Soki sango na bakitani baye baboyi mpe balingi te kosenga botiami pembeni, episkopo nde esengeli amema likambo lyango na Roma mpo etumbu ya makasi koleka ya bolongoli ye na bonganga Nzambe," ebakisi mokanda ya CENCO, motiami manzaka na ba episkopo ba diocièses 47 ya RDC.

Mokanda mwango mobengami "Na eteyelo ya Yesu Klistu : Mpo na bomoi ya bonganga Nzambe ya solo ".

Motango ya ba sango baye bazali namakambo maye moyebani te.

XS
SM
MD
LG