Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etats-Unis epesi etumbu na raffineirie Alain Goetz mpo na wolo ezwaka bisika na bitumba


Moyi mombongo ya Belgique Alain Goetz, nkolo compagnie AGR Limited (C G) na président Yoweri Museveni ya Uganda (c) na ministre ya Energy mpe mines ya Uganda, Irene Muloni, na raffinerie ya AGR na Entebbe, 20 février 2017.
Moyi mombongo ya Belgique Alain Goetz, nkolo compagnie AGR Limited (C G) na président Yoweri Museveni ya Uganda (c) na ministre ya Energy mpe mines ya Uganda, Irene Muloni, na raffinerie ya AGR na Entebbe, 20 février 2017.

Mbulamatari ya Etats-Unis epesi etumbu na raffinerie Alain Goetz na réseau na yango mpo na wolo ezwaka kowuta na bisika ya bitumba na Ekolo Congo démocratique mpe bisika misusu.

Département d’Etat ya Amerika nde epesi sango yango.

"Alain Goetz na ba compagnies na yango basombaka wolo ebimaka na bisika bisambama na mangomba ya basimba minduki baye bazali na bitumba na RDC.," elobi na liyebisi Département d’Etat ya USA.

"Mangomba maye mpe bakambi ba yango babundisaka bacivili mpe bazali na makambo ma somo lokola ba massacres ethniques, bozwi basi na makasi mpe kozwa bana na makasi na mangomba ya basimba minduki," ebakisi Départmenet d’Etat.

Mpo na mbulamatari ya Etats-Unis, wolo ewutaka na bisika ya bitumba epesaka misolo mingi na baye bazali na bitumba na monyele ya RDC, kati na bango mangomba ma basimba minduki baye bakongolaka mpako na bobuki mibeko, basalaka bitumba na ba mines mpe bayokanaka na ba contrebandiers (bateki mines na nzela ya moyibi).

Goetz ezali na réseau monene ekanda kino na Ouganda, Emirats Arabes Unis mpe Belgique.

Na 2020, Belgique ekitisaki yango na likambo mpo na kolekisa misolo na nzela ya moyibi mpe mayuya likolo na misala mya yango ya mombongo ya wolo.

Mbulamatari ya Etats-Unis na eye ya RDC bazali na boyokani mpo kosunga kosukisa kaniaka.

XS
SM
MD
LG