Général John Numbi akebisi ete soki maponami masalami malamu te "moto mokopela" na mboka
Your browser doesn’t support HTML5
Général John Numbi mokambi ya kala ya mampinga ma Ekolo Congo démocratique oyo akima mboka, alobi na bililingi ete baye bapesaki bokonzi na président Félix Tshisejedi bakoyeba kobotola ye yango. Apameli mokonzi ya mboka kobuka boyokani bwa bopesani bokonzi na mokonzi ya kala Joseph Kabila.