Bato koleka 176 bakufi na mpela ekasi Kalehe (Sud-Kivu)
Your browser doesn’t support HTML5
Bato koleka 176 bakufi nsima na mpela ekasi ekwayaki mokolo mwa minei na Kalehe, elobi gouv. ya Sud-Kivu, Théo Ngwabidje na VOA Lingala na nzela ya singa wuta esika ya likama. Boluki luki bozali kokoba na poto poto eye ememi ndako mingi lokola na mboka Nyamukubi ndenge bililingi bimonisi.