RDC

Balandi ya UDPS batomboki na Lubumbashi

Your browser doesn’t support HTML5

Balandi ya UDPS batomboki lisusu lelo kasi na engumba ya Lubumbashi mpo na kotelemela lolenge Assemblée nationale esosolaki miko ya mokonzi ya president Félix Tshisekedi miye mitiyaki bakambi ya Gécamines mpe SNCC. Bakendaki na ndako ya Assemblée provinciale ya mpe batikaki mokanda ya bosenga na bango. Bakitaki na ndako ya PPRD epayi wapi babukaki mwa biloko. Kasi police ebetaki gaz lacymogène mpo na kopanza bango.