*Tshisekedi akutani na bakambi ya mampinga, bokengi mpe migration mpo na est *CENCO na ECC basengi Ilunga atiya bato ya sembo na bulamatari *Dr. Muyembe akebisi bato mpo na bombongo nsima na Ebola *Bisaleli ya bitumba na Ebola biyibami na Kisangani *N’Sengi Biembe, sélectionneur ya ba Léopards
Président Félix Tshisekedi akambi lelo bokutani ya bokengi na bakonzi ya likolo ya mampinga na Cité ya Union africaine.
Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya cellule technique ya bitumba na Ebola, alobi bato banso basalaka mombongo na nsima ya bokono boye bakotiyama pembeni. Asakoli yango na Beni esika wapi akomi. Erikas Mwisi azwaki maloba ma ye.
Bisaleli ya bitumba na bokono ya Ebola biyibami na engumba ya Kisnagani, eyebisi bakambi ya bokolongono.
Fédération congolaise ya lisano ya ndembo na makolo (Fécofa) eponi Christian N’Sengi-Biembe bo sélectionneur (mponi) ya sika ya ba Léopards. Azuwi esika ya Jean-Florent Ibenge oyo atikaki mosala mercredi. VOA Lingala etunaki ministre ya Sports intérimaire oyo andimi mokano yango, Jean-Pierre Lisang
*Minganga misatu ya RDC bakami mpo na liwa ya moye ya Cameroun na Butembo *Misala mitelemi na Beni mpo bobomi ya bato 6 na Mbau *Greenpeace esengi lisusu na Tshisekedi koboya misala ya pétrole ya parc ya Salonga *Bobongisi stade Tata Raphaël mpo na 45 ans ya bitumba Ali-Foreman
Greenpeace Afrique, ONG ya kobatela environnement mpe zamba, esengi lisusu mokonzi ya Congo démocratique, Félix Tshisekedi, koboya misala minso ya boluki to ya kozuwa pétrole na parc ya Solnga, na Cuvette Centrale.
Minganga misatu ya Congo démocratique bakangami nsima na bofundami mpo na liwa ya moninga wa bango ya ekolo Cameroun, épidémiologiste Richard Mouzoko ya OMS (Mabongisi ya molongo mpo na bokolongono) oyo babomaka na Butembo na misala ya kobundisa Ebola le 19 avril eleki.
*Ibenge alongwe sélectionneur national *PM Ilunga ayebisi CACH na FCC lolenge ya bato bakondimama na gouvernement *Bato 11 bakufi mpe mingi balimwe na likama ya bwato na Lukenyi na Kasaï *Bavandi ya Mavivi ba sengi kimya na Monusco
Président Félix Tshisekedi asengaki mposo moleki na bana ya Congo démocratique batala te ba étiquettes to passé ya baye bakozala na gouvernement mpo ye nde akokamba yango. Alobaki liboso ya communauté ya RDC na Nigeria ete ekozala gouvernement ya mbogwana.
Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba apesi na baye ya CACH (Cap pour le changement) ya président Félix Tshisekedi mpe ya FCC (Front commun pour le Congo) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, ba critères mpo na baye kozala na gouvernement.
Jean-Florent Ibenge sélctionneur (mponi na basani) ya ba Léopards ya ndembo na makolo apesi ya ye démission (atiki mosala). Alobi moto moko te atindi ye kasi azali kozela ebonga mosusu na Fédération congolaise ya football mokambi ya Fédération congolaise ya football assocation, Constant Omari alaki
Voir plus