Martin Fayulu, moko na bakambi ya lingomba Lamuka mpe mokonzi ya lisanga Ecidé, alobi ete azali kosenga maponami yambo na ntango (élections anticipées). Alobi yango na meeting asalaki o’mokolo ya eyenga na camp Luka, na Kinshasa, liboso ya bituluku ya bato.