Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi na masolo ya "intégration éconmique" na Malabo (Guinée équatoriale)


Président Félix Tshsiekedi ya RDC (3e de gauche) na mokokani wa ye ya Guinée équatoriale Teodoro Obiang Nguema (1er) na masolo ya Malabo, Guinée équatoriale, le 12 juin 2019.
Président Félix Tshsiekedi ya RDC (3e de gauche) na mokokani wa ye ya Guinée équatoriale Teodoro Obiang Nguema (1er) na masolo ya Malabo, Guinée équatoriale, le 12 juin 2019.

Président Félix Tshisekedi azalaki lelo na masolo ya likolo na bakonzi ya bikolo bisusu, na Malabo, na Guinée équatoriale, mpo na ntombwa mpe kosangasi makanisi mpo na nkita ya continent Afrika.

Masolo yango mazali mpo na 54e Assemblée annuelle ya Conseil ba gouverneurs ya BAD (Banque africaine de développement).

Félix Tshisekedi azalaki na mokokani wa ye ya Guinée équatoriale, Teodoro Obiang Nguema, mpe bakambi basusu.

Président Tshisekedi akomaki na mpokwa ya lobi loleki na engumba mokozi ya Guinée équatoriale.

Kasi yambo na yango alekaki na Libreville na Gabon epayi wapi akutanaki na mokokani waye Ali Bongo ONdimba.

XS
SM
MD
LG