Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi na Kabila bakutanaki o'mokolo mwa lomingo (FCC)


Congolese President Felix Tshisekedi, second left, his wife Denise Nyekeru, outgoing president Jospeh Kabila and his wife Olive Lembe di Sita , listen to the national anthem during the inauguration ceremony, in Kinshasa Thursday Jan. 24, 2019.
Congolese President Felix Tshisekedi, second left, his wife Denise Nyekeru, outgoing president Jospeh Kabila and his wife Olive Lembe di Sita , listen to the national anthem during the inauguration ceremony, in Kinshasa Thursday Jan. 24, 2019.

Président Feliux Felix Tshisekedi na mokonzi ya kala Joseph Kabila bakutanaki o'mokolo mwa eyenga 20 septembre na N’Sele, na Kinshasa.

"Bakonzi ba mangomba mabale mazali na boyokani mpo na kokamba Ekolo Congo démocratique, CACH mpo na Felix Tshisekedi, na FCC ya Joseph Kabila, basololaki mpo etali etaombili ya boyokani bwa bango," elobi, Me Néhémie Mwilanya, motambwisi ya FCC kolanda makomi ya compte Twitter ya FCC.

Sango mosusu epesami te.

Kasi bobendani bozalaki mikolo mileki kati na mango mabele maye. Bazalaki kokoba kobongisa botiami ya bakambi ya territorial mpe ya ba entreprises ya l’Etat.

MONUSCO esakolaki ete mokambi na yango akutanaki na bango babale na bokabwani mpe asakolaki ete bakokutana kala te.

Mposo moleki Joseph Kabila azalaki mpo na mbala ya yambo na Senat bo’ Senateur ya libela, mpete Buku likonzi epesa na bakonzi banso mboka baponamaki mpe balingwaki na maponami.

Nzokande baike kati na FCC, babandi kobimisa na polele boyokani bwango mpe balobi ete CACH esengeli kopesa maboko na candidat ya FCC na maponami ma 2023.

XS
SM
MD
LG