Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump alongoli mokambi ya Pentangone (ministre ya Bobateli ekolo)


Président Donadl trump azali koloba na Maison Blanche, Washington, novembre 2020
Président Donadl trump azali koloba na Maison Blanche, Washington, novembre 2020

Président Donald Trump (oyo azalaki na wuto liboso na maponami) asakoli ete alongoli ministre ya Bobateli ekolo Mark Esper.

Kolanda mokano ya M. Trump, Christopher Miller, mokambi ya centre national ya contre-terrorisme, nde atiami na ebonga yango.

"Chris akosala mpenza mosala malamu ! Mark Esper alongwe. Natondi ye mpo na mosala asalaki," a komi na Twitter M. Trump.

Mikolo mibale mileki, bilembo ba media basangisaki bimonisaki ete Joe Biden nde alongi maponami mpo na kokoma 46e président ya USA.

Esengeli bilembo byango bindimama yambo na misala mya maponami, na ba archives nationales mpe na bazuzi, yambo na M. Biden kolapa ndayi le 8 janvier.

Kasi, milulu misusu misalamaka le 12 décembre mpo na Baponi banene bayeba kotia na sanduku pobonami bazwi na bato banso.

Esengeli ezala M. Biden nde molongi, soki lkama lisalami te.

M. Biden alobi abandi mosala ya kobundisa COVID-19 mpe alaki kopesa bato mangwele to mono ya COVID-19 ntango yango ekobima kasi yambo, bato banso basengeli kolata masque.

XS
SM
MD
LG