Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Rwanda ezali kobanda mombongo ya bangi (cannabis) bo’ nkisi


Président Paul Kagame ya Rwanda na Nairobi, Kenya, 11 février 2020.
Président Paul Kagame ya Rwanda na Nairobi, Kenya, 11 février 2020.

Mbulamatari ya Rwanda epesi ndingisa ete bangi to cannabis ebanda kolonama na mabele na yango na ntina ya kotekama libanda mpo na koselelama lokola mono.

Mokano mwango mosalakolami nsima na likita lya mbulamatari lya mokolo mwa yambo ya mposo.

Bakonzi ba Rwanda bakani ete mboka na bango esala mbongo mingi na wenze ya bangi eye epesameli ndingisa na bikolo mingi.

"Malona ya bangi lokola mono makomema misolo mingi," elimboli na télévision nationale ya Rwanda, ministre ya mambi ma Bokolongono, Daniel Ndamije.

"Moloni nionso esengeli azwa yambo ndingisa ya bakonzi ya mboka," abakisi.

Bikolo mingi bandima bosalelami ya bangi bo’ mono. Epesamela mpe ndingisa na ba Etats mingi ya Etats-Unis.

XS
SM
MD
LG