Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

RDC endimami na molongo ya bikolo bikoki kosungama na MCC (USA) mpo na ntambwa ya nkita


Président Félix Tshisekedi (1er D)na ya mambi ya Afrika, Peter Tibor Nagy, (1er G), na ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer, na Kinshasa, RDC, 15 mars 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi (1er D)na ya mambi ya Afrika, Peter Tibor Nagy, (1er G), na ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer, na Kinshasa, RDC, 15 mars 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Ekolo Congo démocratique endimami kati na bikolo bya nkita moke bikoki kozwa lisungi lya Etats-Unism na zela ya MCC (Millenium Challenge Corporation).

MCC oyo ezali misala misungaka mipesaki lisungi na bikolo bike na ntina ya komatisa nkita na bango, esakoli sango yango na site internet na yango.

RDC etiami na molongo molamu mpa kondimama na Millennium Challenge Corporation mpe kosala boyokani ya kopesama lisungi. Millennium Challenge Corporation ezali linaka lisungaka bikolo na kotombola nkita mpe kokitisa bobola, elakisi sango epesami na compte Twitter ya MCC.

Bikolo 60 ya nkita moke, mingi mingi ya Afrika bizali na molongo yango. RDC ezali kati na yango.

Bikolo misusu misato ya nkita ya kati kati, bizali mpe na mabongisa mango. Kati na yango Tunisia.

Etats-Unis endimi ete makasi mazali kosala na bitumba na kaniaka na RDC.

Mbulamatari ya Etats-Unis ezali na boyokani ya malamu (pp4pp) na RDC wuto Félix Tshisekedi akotaki na bokonzi na janvier 2019.

XS
SM
MD
LG