Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pene na bato mwambe bakufi na bokangami ya Ne Muanda Nsemi (Min. Intérieur)


Ne Muanda Nsemi, na bokangami bwa na Kinshasa, le 4 mars 2017
Ne Muanda Nsemi, na bokangami bwa na Kinshasa, le 4 mars 2017

Pene na bato mwambe bakufi na bokangami ya Ne Muanda Nsemi, mokambi ya Bundu dia Mayala / Bundu dia Kongo, vendredi na Kinshasa, endimi vice-premier ministre mpe ministre ya Intérieur.

"Pene na bato 8 bakufi, 35 baye bazoki ba mpota bazali na hôpital central ya police na camp Lufungula, moko oyo azali traumatisé atiyami na cliniques Ngaliema," ekomi vice-premier ministre mpe ministre ya Intérieur, Gilbert Kankonde.

Na ngambo ya police, bato 8 nde bazoki mpo enene, ebakisi M. Kankonde.

Na mokanda yango, M. Kankonde alobi ete Zacharie Badiengila (nkombo ya solo ya Ne Muanda Nsemi) afundami mpo na kotinda bana mboka koyinana, mpo na botomboki mpe mpo na kosimba maye matali bokengi ya mboka.

Ne Muanda Nsemi amemamaki na cliniques Ngaliema mpo kozwa lisali na mpota azwaki na moto.

Balandi baye 203 batindami na officier ya ministère public. Kati na bango 168 batiyami na commissariat ya police provinciale, basi mwambe.

Ne Muanda Nsemi akimaki boloko ya Makala nsima na bokangami mibu mibale ntango ya président Joseph Kabila. Moto moko akufaki.

Nsima na bokoti na ye na bokonzi, président Félix Tshisekedi asengaki ye azonga na boloko, kasi abimisaki ye mokolo moko molandaki.

Ne Muanda Nsemi azongelaki uto mikolo mileki kokebisa mbulamatari mpe kosenga lifuta na ye ya eleko azalaki mokeli mobeko. Azali mpe kosenga bibonga ya bokonzi mpo na bana ya etuka ya Kongo central.

Balandi baye basali milulu mingi mikolo mileki na Kinshasa mpe na Kongo cenral. Mpe bato bakufaki.

Bayi Bundi dia Mayala, ngambo ya politiki ya lingomba ya losambo Bundu dia Kongo, bazalaki kobenga na Kongo central mpe Kinshasa bayi bituka misusu.

XS
SM
MD
LG