Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ntoma Châtaigner alobi UE ekokota makambo ya kati ya RDC kasi elingi boyokani (TOTALA)


Ntoma Châtaigner alobi UE ekokota makambo ya kati ya RDC kasi elingi boyokani (TOTALA)
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:00:20 0:00

Union européenne eboyi kokota na matata ya kati na RDC kasi elingi boyokani Ntoma mokambi ya limpinga to delegation ya Union européenne na RDC, Jean Marc Châtaigner, alobi ete Union européenne ekokota te matata kati mazali na RDC kasi elingi nde boyokani.

Ntoma Jean Marc Châtaigner ayambamaki na Ministre wa yambo ya RDC, Sylvestre Ilunga, ntango matata mazali kongala na lisango lya boyokani CACH-FCC mpo na kokamba mboka.
Union européenne ekokota te, emikotisaka te kati na makambo ya kati ya Ekolo Congo démocratique. Oyo tolingi biso, ezali nde boyokani ya solo ya ngambo inso mpo na eyano ya bomoko na matata maye mokoki kozala, elobi M. Châtaigner.
Matata mazali kati CACH, ya président Félix Tshisekedi mpe FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila mpo etali na bazuzi basato ya Cour constitutionnelle balapaki ndayi mercredi mileki o’boso ya président Tshisekedi.
Bayi FCC basakolaki jeudi ete bokondima soki moke te bazuziz baye mpe makambo bazuzi bango bakosala makotala bango te. Balobi bakondima manso akoya.
Bayi FCC baye baleki na motango mingi na ba instutitions (Sénat, Assemblée nationale mpe mbulamatari) baboyaki kozala na milulu mya bolapi ndayi myango.
Président Félix esengeli apesa lisukulu na mpokwa ya vendredi.
Matata mazali.
Police nationale ya Ekolo Congo democratique ewangani liyebisi moko lizalaki kotia na bokengi makasi ba policiers mpe esengi na bato kosalamo mosala bo’ momesano.
Nangambo na yango, ambassade ya Etats-Unsi esengi na basali bayango kozala na bokebi na suka ya mposo eye mobimba mpo ekanisi ete mikano mya makasi mikoki kozwama.
Ministre wa yambo akutanaki na bato basusu mpo na kosolola yango. Kati na bango, ntoma ya Belgique na Kinshasa mpe chargé d’affaires ya Union africaine.
XS
SM
MD
LG