Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mazembe elongwe na ¼ de finales liboso ya Raja (1-0)


Miche Mika ya TP Mazembe (G) azo' beta ndeko na likolo na match aller ya Ligue africaine des champions na Raja Casablanca, na Casablanca, Maroc, 28 février 2020.
Miche Mika ya TP Mazembe (G) azo' beta ndeko na likolo na match aller ya Ligue africaine des champions na Raja Casablanca, na Casablanca, Maroc, 28 février 2020.

TP Mazembe ya RDC elongi CS Raja Casablanca ya Maroc 1-0 na match retour ya ¼ de finales ya Ligue africaine des Champions na Lubumbashi. Kasi elongwe na compétition.

Isaac Tshibangu ya TP Mazembe aningisaki moniama na 49’ mpo na mongete ya match.

Mazembe ezwaki libaku ya bakisa mongete mosusu na 70’ kasi Jackson Muleka atindi ndembo na makolo ya gardien de but ya Raja.

1-0 ekoka te mpo Mazembe aleka etapi ya ½ finales mpo na aller, Raja abetaki yango 0-2 na Casablanca.

Mazembe asuki bongo awa mpo momekano moye.

XS
SM
MD
LG