Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Koleka bato 2.000 bakufaki na bitumba na Ituri na 2020 mpe 6.000 na Beni wuto 2013 (CENCO)

Cardinal Fridolin Ambongo pene na Abbé Donatien Nshole, kalaka mokonzi ya CENCO nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Cardinal Fridolin Ambongo pene na Abbé Donatien Nshole, kalaka mokonzi ya CENCO nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Koleka bato 6.000 babomami na bitumba na etando ya Beni wuto mpe koleka 2.000 na etuka ya Ituri na 2020, elobi b’episkopo ya CENCO (Conférence épiscopale nationale du Congo) na kopamelaka mobulu na monyele ya RDC.

Kalaka mokonzi mpe molobeli ya CENCO, abbé donation Nshole apesaki motonga yango na bapanzi sango jeudi,

Abbé Nshole apameli mpe ndenge bato basusu bazali kotiama bisika bavandi bazali kokima mpe ndenge bosaleli yam abele bozali kosalama na bobuki mibeko mpe kotiama ya islam na makasi na botambola likolo na bonsomi ya bato kopona eyamba balingi.

B’episkopo ya katoliko basanga na CENCO bapameli bozangi bokengi bozali kokoba na monyele ya mboka mpe basengi ete ba officiers ya basoda baye bawumela na monyele batindama bisika misusu.

Balaki kokende na Sud-Kivu sanza ekoya mpo na etinda ya kobondisa mitema mya baye bazali na mpasi na azela ya ACEAC, lisanga lya b’episkopo ya Afrika kati ndenge basala mbala mingi.

Nzokande lobi, Assemblée nationale endimaki mabongisi ya bokelami ya limpinga likotindama na monyele mpo koluka ntina nini bitumba bizali kosila te.

Bato mwambe ya bituka bizali na bitumba te nde batindami kasi mokolo bakokende moyebani nanu te.

XS
SM
MD
LG