Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kokoma Mokonzi aponami na USA elingi koloba nini (TANGA)


Biden-Trump
Biden-Trump

Na Etats-Unis, démocrate Joe Biden amonani molongi ya maponami.

Mokonzi-abimimi na maponami (President-elect) ezali maloba ya kolimbola kasi elakisi te ete moto azali na bokonzi to ebonga. Na yango, Biden azali te na bokonzi likolo na mbulamatari, mpe akozala na yango te kino akovandisama na ebonga na ngonga ya nzanga ya le 20 janvier 2021.

Masanga ma sango na Amerika, maye mandelaka botangi bonso bwa maponami, mamonaki le 7 novembre ete Biden akomaki na bilembo bikokaki kolekama lisusu te na Pennsylvania, yango etiaki ye likolo na ndelo ya maponi nkama mibale na tuku sambo (270) ya Baponi banene esengeli mpo akoma président. Ba minutes nsima na kotala motango yango, basakoli to bakanisi ete azali molongi.

Yango ntina ndako ya sango mingi, kati na yango VOA, ezali kobenga Biden "amonani molongi ".

Mbala mosusu, mingi mingi na maponami ya bokokani makasi, ntango mangomba ya sango masakola boye, candidat mosusu andimaka te apoli. Président Donald Trump andimi nanu te, alobi moyibi mosalamaki kasi apesi te bilembo ya moyibi yango mpe alingi kobunda mpo na yango. Yango esali ete bakeli mibeko bakabwana na Washington, na ba Républicains bazali kopesa maboko na bolukiluki ya mbeba, ata basepeli elongo ya bakeli mibeko basusu na momekano.

Matata maye makopesama eyano ntango nini ?

Maponami makondimama te na bakonzi kino mposo nzike. Ntango wana, bondongwani na bazuzi mpe bobandeli bontangi bokoki kosalama.

Kino sika, mbulamatari ya Trump epesi nanu te bilembo bya solo bikoki kobongola bilembo ya maponami, kasi ntango ezali nanu mpo na kokenda na bazuzi.

Soki ba états endimi maponami, bato batindami na maponami ya bana banso ya état moko na moko nde bakopona na maponami ya Baponi Banene (Collège élcotral) na kati kati ya sanza ya zomi na mibale. Ntango wana nde Congrès ekondima bilembo bya maponami manso ya Collège électoral na libandela ya sanza ya yambo, pene na mposo mibale yambo na Mokolo ya bolapi ndayi.

XS
SM
MD
LG