Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Kahimbi, Tango Four mpe John Numbi bazali kopekisa USA kosunga FARDC malamu (P. Pham)


Ntoma ya Etats-Unis na ekolo Congo démocratique, Mike "Nzita" Hummer na kati kati ya bakambi ya mampinga ya Amerika mpo na Afrika (AFRICOM) na Stuttgart, Allemagne, 14 novembre 2019. (Twitter/Mike "Nzita" Hammer)
Ntoma ya Etats-Unis na ekolo Congo démocratique, Mike "Nzita" Hummer na kati kati ya bakambi ya mampinga ya Amerika mpo na Afrika (AFRICOM) na Stuttgart, Allemagne, 14 novembre 2019. (Twitter/Mike "Nzita" Hammer)

Ntoma ya Etats-Unis na ekolo Congo démocratique, Mike Nzita Hammer asololi o’mokolo ya minei na Allemagne na bakambi ya mampinga ya Amerika mpo na Afrika (AFRICOM) na ntina ya kopesa maboko na ba FARDC (Mampinga ya RDC).

"Nazalaki na masolo ya malonga na général Steve deMiliano mpe limpinga ya @USAdricaCommand na ntina ya koyikisa makasi na boyokani na RDC, (boyokani) boye bovandi likolo ya professionnalisation (botiyami na botosi mosala ba bango) ya ba FARDC, bokomisi malamu ya makoki ya bomoto mpe mbongwana ya misala ya bosembo ya mampinga. #PP4PP," eyebisi na compte Twitter na ye M. Hammer.

Nzoka nde, montindami ya Etats-Unis mpo na etuka ya Grands lacs, Peter Pham asakoli ete ntoma ya USA akokende na Allemagne mpo na masolo ya kosunga ba FARDC.

Kasi Peter Pham akebisaki ete Etats-Unis "ekozala te na makoki manso ya kosalisa mampinga ya RDC malamu mpo bayike na bakambi ya ba FARDC bazali na nse ya etumbu mpo na kotambola likolo ya makoki ya bomoto, na mbeba mpe kaniaka".

"Kati na bango ba généraux Kahimbi (Delphin), Amisi (Garbiel) mpe Numbi (John). Président Tshisekedi ayebi yango malamu," elobaki Peter Pham yambo na kolongwa Kinshasa mpe kokende na Brazzaville o'mokolo ya misato se mpo na masolo ya kimya na Grands lacs.

Masolo ya Mike Nzita Hammer na mokambi ya AFRICOM maselemi ntango président Félix Tshisekedi mpe akomi na Allemagne mpo na kokutana na bakonzi ya mboka eye.

XS
SM
MD
LG