Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Justice militaire epesameli enquête ya bitumba ya Bakata Katanga (G. Kankonde)


Vice-Premier ministre mpe ministre ya mambi ya kati ya mboka mpe ya maye matali bokoko, Gilbert Kankonde na 4e Conférence Nationale ya planification na Kinshasa, 3 décembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Vice-Premier ministre mpe ministre ya mambi ya kati ya mboka mpe ya maye matali bokoko, Gilbert Kankonde na 4e Conférence Nationale ya planification na Kinshasa, 3 décembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Bakamabi ya mampinga mpe ya bokengi ya Haut-Katanga babengisami na Kinshasa mpe Justice militaire ekokoba kosala enquête mpo na liwa lya bato na bitumba bingalaki ntango Bakata Katanga bakotaki le 28 mars na etuka eye, eyebisi ministre ya Intérieur na suka ya misala mbulamatari etindaki.

"Mpo etali mapinga ya Ekolo Congo démocratique, ba enquêtes ekokoba na Justice militaire mpo na koyeba nani asalaki nini na manso makomaki," eyebisi na bapanzi sango Vice-premier ministre mpe ministre ya Intérieur Gilebert Kankonde.

Kolanda bayi société civile mpe boko na ba députés, bato pene na 40 bakufaki ntango bayi lingomba Bakata Katanga bakita obalabala na bingumba miike ya Haut-Katanga mpe mokambi na bango Gégéon Kyungu akima na bokengalami na ndako.kata Katanga. Katsi mobulu mwango mosalamaki na ngonga moko mpe na Kipushi, Kasumbalesa, Lowango, Moba mpe bisika misusu.

ONG Asbl Justicia etangaki bawei tuku misato na mibale na Lubumbashi na ngambo ya ba Ba

Ministre ya Intérieur alobi ete commandant ya 22e région militaire na molandi wa ye mokambi ya bokrngi babengisami na Kinshasa.

Alimboli mpe ete basoda banso bazali na situation irrégulière bakotindama na bisika ya koyekola mpe ba unités nyonso mpe basoda banso basali koleka mibu mitano na misala na Haut-Katanga bako bakotindama bisika bisusu.

XS
SM
MD
LG