Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Joe Biden aponi mwasi moyindo Kamala Harris bo’ candidate vice-présidente (colistière)


Candidat ya ba démocrates mpo na maponami ma mokonzi ya mboka mpe vice-président ya kala Joe Biden (G) elongo na sénatrice Kamala Harris na Houston, Texas, U.S., 12 septembre 2019. REUTERS/Mike Blake/File Photo
Candidat ya ba démocrates mpo na maponami ma mokonzi ya mboka mpe vice-président ya kala Joe Biden (G) elongo na sénatrice Kamala Harris na Houston, Texas, U.S., 12 septembre 2019. REUTERS/Mike Blake/File Photo

Candidat ya ba démocrates Joe Biden asakoli mardi ete sénatrice ya moyindo Kamala Harris, ya mibu 55, mpo na kozala vice-présidente na ye.

"Nazali na lokumu ya koyebisa ete naponi Kamala Harris, mobundi ya mpiko ya bato bazali na mpasi mpe moko na basali ba l’Etat, b’o colistière (oyo akozala na ngai nkasa ya maponami)," elobi Joe Bieden, vice-président ya kala ya Etats-Unis, oyo azali na mibu 77.

Joe Biden elongo na Kamala Harris bakozwa maloba lobi mercredi na engumba Washington, na état ya Delaware.

Kamala Harris azalaki procureure générale ya kala. Azalaki moninga ya mosala ya mwana ya Joe Biden, Beau Biden, oyo akufaki na 2015 na cancer.

Baboti ba Harris Kamala bawuta Jamaïc.

Na ngambo ya ba républicains, président Donald Trump nde akopesa nkombo. Akozala nkasa ya mopanami na vice-président na ye Mike Pence, soki makambo mabongwami te.

XS
SM
MD
LG