Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Guterres apameli bobomi ya koleka bato 55 na Boga mpe Tchiabi (Ituri)


Kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na Manille, Philippines, 13 Novembre 2017.
Kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na Manille, Philippines, 13 Novembre 2017.

Kalaka mokonzi ya ONU, Antonio Guterres apameli bobomi ya koleka bato 55 na bisika bato bakimaki bitumba bazalaki, o’mokolo mwa eyenga, na mboka Boga mpe Tchiabi, na Ituri.

Molobeli ya M. Guterres, Stephane Dujarric akundolaki na bapanzi sango mercredi na New York ete ONU ebimisaki mardi liyebisi lya kopamela bobomi boye ba batomboki ya ba ADF bafundami na kosala.

"Bobomi bwango bosalamaki na ba camps ya bakima bitumba pene na mboka Boga na etuka ya ituri, mpe ya Nord-Kivu," elobi M. Dujaric.

Bato 55 bakufaki mpe baike basusu bazokaki.

"Eyano ya lombango ya basoda ba kimya ya MONUSCO etindamakina esika yango. Basoda ba kimya bazali kosunga baye bazokaki mpe komema bango na esika ya lisalisi," ebakisi Dujaric.

Molobeli ya . Guterres alakai ete kalaka mokonzi ya ONU akokoba, na nzela ya molakisi ya elongi na ye, kosunga mbulamatari ya Congo mpe bana mboka na makasi ma bango mpo na komema kimya na monyele ya ekolo.

XS
SM
MD
LG