Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Elenge ya mibu libwa azwamaki na Ebola akufi na Uganda


Basali ya bokolongo na Bwera, Uganda, 12 décembre 2018.
Basali ya bokolongo na Bwera, Uganda, 12 décembre 2018.

Elenge mwasi ya mibu libwa oyo azwamaki lobi loleki na bokono ya Ebola na Ouganda, akufi. Azalaki ya ekolo Congo démocratique kasi asalaki mobembo na Ouganda na mama wa ye mpe amonisaki bilembo ya Ebola na bokomi na bango na mboka Kasese, na Ouganda.

Mokambi ya mambi ya bokolongono ya district ya Kasese alobi ete bazali kozongisa nzoto ya mowei na mama wa ye na Congo démocratique.

Na sanza motoba, bato misato basusu ya libota moko, bawuta na Congo démocratique bazwamaki na Ebola. Mibale kati na bango bakufaki.

Nzokande, bakambi ya mambi ya bokolongono ya Congo démocratique bayebisi ete motango ya bawei na Ebola mokomi nkoto mibale banda bokono boye bozali kozela kongala na monyele ya ekolo. Bato nkoto misato nde bazwami na bokono yango.

XS
SM
MD
LG