Tat mokonzi ya Sénégal asokoli mobeko likonzi moye molongoli ebonga ya Premier ministre, elakisi liyebisi ya gouvernement.
Mobeko yango etindakamaki na Macky Sall kasi eponamaki na majorité monene ya ba députés le 4 mai.
Bolongoli ya ebonga ya Premier ministre esengeli ekomisa makasi régime présidentiel na Sénégal, kolanda makanisi ya Macky Sall.
Nzokande opposition mpe société civile bazali komana ya ngo lokola lolenge ya mokonzi Macky Sall kokonza ye moko likolo ya misala nyonso ya ekolo.
Ba ministres 32 mpe bakalaka ya l’Etat misatu batikali namabonga na bango na gouvernement. Premier ministre Boun Abdallah Dionne ye nde akomi kalaka mokonzi ya présidence ya République, kolanda liyebisi ya gouvernement.
Macky Sall aponamaki lisusu na maponami ya le 24 février eleki.