Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Concertation politique (boyokani) ebandi na Congo-Brazzaville


Pascal Tsaty Mabiala (43 G), mokambi ya UPADS (Union Panafricaine pour la Démocratie Sociale) na Brazzaville, Congo, 31 janvier 2016.
Pascal Tsaty Mabiala (43 G), mokambi ya UPADS (Union Panafricaine pour la Démocratie Sociale) na Brazzaville, Congo, 31 janvier 2016.

Baye bazali na bokonzi na baye bazli na opposition bazali na masolo ma boyokani (concertation politique) wuto mercredi na Madingou (département ya Bouenza) yambo na maponami ma mokonzi ya mboka makosalama na mars 2021.

Mama na likambo na yango ezali koyikisa makasi mambi ma démocratie na nzela ya maponami ma bonsomi, pole mpe kimya.

Esengeli ebanda le 23 novembre kasi etindikamaki mpo na mercredi 25 novembre 2020.

Mokambi mwa opposition mpe motambwisi ya UPADS, Pascal Tatsy Mabiala azalaki kosenga masolo yambo na maponami mango.

M. Mabiala akutanaki na mokonzi ya ekolo Denis Sassou N’Guesso le 21 novembre mpo na yango.

Baike na opposition bazali na ntembe ete masolo maye mameme likambo lya malonga.

"Ekozala mbala ya mitano masolo masalama mpo na maponami kaka ya lolenge moko wana, maye baot bandima te mpe ya malamu te. Ezali kaka milulu ya mpamba. Solo, ezala kaka milulu yambo na maponami," elobi Claudine Munari, mokambi ya fédération opposition ya Congo, atangami na Les Echos du Congo-Brazzaville.

Moko na bayi opposition, Mathias Dzon, na mibu 73, ya UPRN ministre ya kala ya Finances asi asakoli ete akopesa nkombo na maponami ma mokonzi ya mboka ya mars 2021.

XS
SM
MD
LG