Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CHAN 2021 : Ba "Léopards" balongwe mpe ba "Lions indomptables" baleki na ½ (1-2)


Ba Lions indomptables na demi-finales ya CAN na Franceville, au Gabon, le 2 février 2017.
Ba Lions indomptables na demi-finales ya CAN na Franceville, au Gabon, le 2 février 2017.

Ba Léopards ya RDC balongwe na CHAN 2021 nsima na kokweyisama 1-2 liboso lya ba Lions Indompatbles ya Cameroun epayi wapi phase finale ya momekano moye mozali kobetama.

Basani ba RDC bazali bato na yambo ya koningisa monyama na 21’ na Makabi Lilepo na moto.

Kasi na 29’, ba Lions bazongisaki mongete na Yannick N’Djeng nsima na garien de but Matampi Ley kozanga kozwa ndembo na point ya penalty.

Félix Oukiné akatki mpema ya Léopards na mongete ya mibale ya Cameroun na 41’.

Basani ba Léopards basalaki makasi kasi elongaka ekandaki na ba Lions.

Mwa ngonga yambo na yango, ba Aigles ya Mali balekaki mpe na 1/2 finale nsima na kolonga ba Diables rouges ya Congo-Brazzaville na ba tirs au but (5-4).

XS
SM
MD
LG