Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Budget ya COVID-19 kino sika ezali ya 135 millions $ (Dr. Muyembe)


Dr Jean-Jacques Muyembe-Tamfum ya Congo démocratique azwi mbando ya edition ya misato ya Hideyo Noguch Africa na maboko ya Premier ministre ya Japon Shinzo Abe, na Tokyo, Japon, 30 août 2019.
Dr Jean-Jacques Muyembe-Tamfum ya Congo démocratique azwi mbando ya edition ya misato ya Hideyo Noguch Africa na maboko ya Premier ministre ya Japon Shinzo Abe, na Tokyo, Japon, 30 août 2019.

Dr. Jean-Jacques Muyembe alobi ete misala ya bitumba na COVID-19 mimonisa bosenga bokazli ya 135 millions ya ba dollars na ntango eye.

Budget ekoki kobwanga soki bosenga bomati.

Bato ya sika basato basusu bakisami na motango ya baye bazwi coronavirus ya sika to COVID19 na ekolo Congo démoncratique, esakoli mokambi ya Cellule technique ya bitumba na bokono boye bopanzani na mokili mobimba. Kolanda Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya misala miye motango ya bakoni mokomi na tuku mintai na moko.

Asengi na bato banso koboya kolanda sango ya lokuta na ba réseaux sociaux mpe kotosa malako mapesami na bakambi ya bitumba biye.

Dr. Muyembe alobi mpe lisusu ete soki bakonzi bayebi kokanga commune ya Gombe, ekopesa nzela ya kongela virus ya VOCID-19 kopanzana na ba communes misusu ya engumba Kinshasa mpe bituka misusu.

Misolo myango mikotelama na mistere ya bokolongono, eyangoli Dr. Muyembe na mituna ya TOP Congo Fm.

XS
SM
MD
LG