Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Boyokani mpo na aérogare kati na Eximbank na RDC nanu atiami te na mosola (Ambassade ya Chine)


Président Joseph Kabila (3e G) na Ministre wa yambo Bruno Tshibala (2e G) elongo bakambi misusu na botiami ya libanga mpo koabanda botongi ya aérogare ya sika ba N'Djili, Kinshasa, 2 mai 2018. (Présidence ya RDC)
Président Joseph Kabila (3e G) na Ministre wa yambo Bruno Tshibala (2e G) elongo bakambi misusu na botiami ya libanga mpo koabanda botongi ya aérogare ya sika ba N'Djili, Kinshasa, 2 mai 2018. (Présidence ya RDC)

Boyokani mpo na nyongo na ya kotonga aérogare ya sika ya lipanda lya mpepo lya N’Djili namu etiami na misalan te. Ezali kozela mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique endima maye mayokamaki, eyebisi ambassade ya Chine na Kinshasa.

Ambassade ya Chine edimisi liyebisi mpe epameli lingomba ya bitumba mpo na bosembo ACAJ na kopesa sango ya lokuta.

"Eximbank Chine, uto ekelama na 1994, etikala kofunda mbulamatari ya RDC na ba zuzi", ekomi ambassade ya Chine na Twitter na yango.

Mpo na ambassade ya Chine, ekozala nyongo Eximbank Chine ekopesa RDC na crédit préférentiel mpo na efutama na mibu tuku minei.

Mwa nungu nungu ezali kotombala wuto mwa mikolo na ba réseaux sociaux mpo na likambo lyango.

Nzokande na eyano apasekai na bakeli mibeko, ministre ya Transports Didier Mazenga Mukanzu alobaki, le 28 mai 2020, ete mosolo ya Go-Pass to IDEF eselalamaka mingi mpo kobongisa bisaleli bya libanda lya mpepo na ekolo mobimba.

M. Mazenga akomaki mpe lisusu ete na mibu misato mikoya, misolo ya Ga-Pass mikozala na 90% mpo na kofuta nyongo ya 354.23 millions ya dollars na Eximbank Chine.

Président ya kala Joseph Kabila abetaki piololo mpo bobandi misala mya kotonga yango na 2018 kasi yango eslama te.

Mpo na kobimba na libanda lya mpepo mpe kosala mobembo moto nyono afutaka 50$ mpo na mboka ya libanda mpe 30$ mpo na bituka.

XS
SM
MD
LG