Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bosambisami bwa Kamerhe: Cour d'appel esangami kozela Cour ya cassation (Michel Moto)


Vital Kamerhe and/et Felix Tshisekedi in/à Nairobi
Vital Kamerhe and/et Felix Tshisekedi in/à Nairobi

Bosambisami ya bobandeli ya Vital Kamerhe botelemisamaki nsima na boko nan gambo koloba na Cour d’appel kozela na bosenga ya Cour ya cassation yango nde esengeli kosambisa.

Moko na ngambo ezali na bosambisami bwango nde esengaki Cour d'appel kozela.

"Kolanda mokanda motikamaki, Cour d’Appel esengi ete botalaki ya likambo bozela kino Cour de cassation ekokata mpe etali botindami bwa likambo liboso lya Cour eye," ekomi na Twitter mosunga ya M. Kamerhe, Michel Moto.

Basambisami ya bozengeli bosengamaki na M. Kamerhe nsima na kokatelama mibu 20 mya misala makasi bakisa na zomi ya bopekisami makoki ma politiki mpo na kopengwisa misolo pene na 50 millios ya ba dollars ya misala ya kotonga mpo na mikolo nkama mya yambo mya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG