Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bofundami ya Trump bokotikama lundi na Sénat (Impeachment)


Nancye Pelosi azali kopasola lisikulu lya Donald Trump na Congrès, Washington, 4 février 2020.
Nancye Pelosi azali kopasola lisikulu lya Donald Trump na Congrès, Washington, 4 février 2020.

Nancy Pelosi, motambwisi ya suku ya nse ya bakeli mibeko ya Etats-Unis, alobi ete mokanda ya kofunda mokonzi abimi na bokonzi Donald Trump (impeachment) mokotikama na Sénat o’mokolo mwa yambo ya mposo. Ekomi mbala ya mibale M. Trump asamba na Sénat.

Motango mingi ya bayi Chambre ya ba représentants (Assemblée nationale ya Etats-Unis) mondimaki na maponami mokano ya kofunda M. Trump ndenge balandi ba ye bakotaki na Congrès le 20 janvier mpo na komeka kopekisa bondimami bwa elonga ya Joe Biden.

Botikami ya bofundami na Sénat bolandamaka na kotanga ba articles ya mokanda yango “impeachment” na ntina ya kobanda bosambisami ya Donald Trump.

Impeachment ekoki komema na bokweyisami na bokonzi ya mokonzi ya mboka, kasi M. Trump asi abimaki na bokonzi wuto le 20 janvier, nsima na bolapi ndayi mpe bokoti na bokonzi ya mokonzi alongaki maponami, Joe Biden,

Bakeli mibeko bakondongwana na makanisi kasi mokolo ya bondongwani moyebani nanu te.

Mokambi ya ba democrates na Sénat, Chuck Schumer alobi asololaki na mokokani wa ye ya ba républicains, Micth Mc Connell, mpo na likambo lyango.

“Bomikosa te, bosambisami bokosalama na Sénat ya Amerika mpe tokopona soki mokonzi ya mboka ya kala akokweya to akolonga na likambo lyango,” elobaki M. M Schumer.

Bato motoba bakufaki na eyoma balandi ba M. Trump basalaki na Capitole. Kati na bango ba policiers mpe biloko mingi bibebisamaki.

Mbala ya yambo M. Trump asambaki na Sénat mpo na misala mya Russie na politki ya Etats-Unis, ntango na maponami ma 2016.

XS
SM
MD
LG