Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bituka bisimbami te na COVID19 bikozongela kelasi ya likolo kala te (Min. Luhaka)


Université ya Kinshasa, 13 avril 2015. (Facebook/Unikin)
Université ya Kinshasa, 13 avril 2015. (Facebook/Unikin)

Bituka bisika biye COVI19 emonani nanu te bikofungola bakelasi ya likolo mpe ba université na yango kala te.

Ministre ya kelasi ya likolo mpe univeristé, Thomas Luhaka atindeli bakambi ba bityelo bya likolo mpe université mpo na yango.

"Bakambi ba bityelo bya likolo mpe université basengami kotala lolenge nini kobanda kofungola misala mya bango," ekomi ministre Luhaka.

M. Luhaka alobi ete bozongeli misala bokobanda yambo na bituka biye bisimbami te na bokono bwa Coronavirus. Kasi mikano myakobatelama misengeli kotosama.

XS
SM
MD
LG