Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bavandi ya Kinshasa bakokangama na ndako mikolo minei banda samedi (Gouverneur)


Gentiny Ngobila, mokambi ya engumba ya Kinshasa, 17 avril 2019. (Facebook/Satibois Boleli Boleli)
Gentiny Ngobila, mokambi ya engumba ya Kinshasa, 17 avril 2019. (Facebook/Satibois Boleli Boleli)

Bakambi ya Kinshasa bazwi mokona ya kokanga engumba eye mpo na mikolo minei na ntina ya kopekisa bopanzani ya coronavirus. Bato pene na 10 millions bavandaka na engumba eye bakangama na ndako mpo na mikolo minei na ntani ya COVID-19.

Gouverneur ya Kinshasa, Gentiny Ngobila asakoli apesi mitindo ete bavandi ya engumba batikala kati na ba ndako mikolo minei banda mokolo mwa mposo.

Bokangami bwango bokozala ya makasi, moto moko te akobima llibanda mikolo minei wuto mokolo ya mposo le 28 mars kino le 31 mars, elobi M. Ngolbila na lisikulu asali.

Kolanda maloba maye, mikolo mibale mikopesamela bango nsima na yango mpo bavandi bayeba koluka mpe kosomba biloko mpe nsima na yango mikolo minei misusu miko bakobakisamela bango ya bokangami ya makasi lisusu.

M. Ngobila alobi ete ekobanda kozala bongo mpo na mposo misato na ntina ya kopekisa bopanzani ya bokono bwa COVID-19.

Mercredi na mpokwa, bakoni ba COVID-19 bakomaki 54 mpe bato mitano nde bakufi. Misato misusu babakisamaki, kolonda bilembo bipesalamaki na INRB (Institut national des recherches biomédicales).

Dr. Jean-Jacques Muyembe, Mokambi ya cellule technique ya bitumba na COVID-19 alobaki ete soki commune ya Gombe, épicentre ya bokono bwango na Kinshasa ekangami, ekopekisa bobanzani na RDC.

Kino sik’oyo, bato baye bayebani kozala na COVID-19 na RDC bazali bango banso na Kinshasa.

O’mokolo mwa mardi, president Felix Tshisekedi abakisami mikano misusu mpo na kobundisa COVID-19.

Apekisaki mibembo minso kati na Kinshasa na bituka misusu.

XS
SM
MD
LG