Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato 36 bazo'monana te nsima na bozindi ya baleinière na Maluku (Kinshasa)


Bato batondi na baleinière elongwe Kinshasa mpo na kokende Bandundu na ebale ya Congo, le 9 mai 2000.
Bato batondi na baleinière elongwe Kinshasa mpo na kokende Bandundu na ebale ya Congo, le 9 mai 2000.

Bato tuku misato na motoba bazali komonana te nsima na bozindi ya baleinière moko na butu ya mokolo ya mposo na ya eyenga na localitè ya Mambutuka, na commune ya Maluku, na Kinshasa, eyebisi Police nationale congolaise (PNC).

"Bato 36 bazali komonana te mpe 76 babikisami na lisungi ya police fluviale," ekomi PNC na compte Twitter na yango.

PNC ekomi ete baleinière H/B Mboshi ewutaki na mboka Balibambi na etuka ya Mai-Ndombe mpe ezalaki kokende Kinshasa, ezinsaki na Mambutuka, na Maluku na koleka 100 kms na Kinshasa.

"Ntina na likama lyango eyebani naino te," elimboli molobeli ya PNC na AFP, colonel Pierrot-Rombaut Mwanamputu.

Makama ya ba baleinières maselemaka mingi na RDC.

Mingi ezalaka ya kala mpe ememaka mikumba ya koleka.

XS
SM
MD
LG