Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Basimba minduki babomi 1.900 civils na mibu mibale na Kivu (HRW na GEC)


Basoda ya mampinga ya Congo démocratique (FARDC) na bitumba na batomboki ya ba ADF ya Ouganda, na Beni, Nord-Kivu, 7 décembre 2018.
Basoda ya mampinga ya Congo démocratique (FARDC) na bitumba na batomboki ya ba ADF ya Ouganda, na Beni, Nord-Kivu, 7 décembre 2018.

Mangomba ya basimba minduki babomi ba civils koleka 1.900 mpe bamemi bato 3.300 kati na juin 2017 mpe juin 2019 na bituka ya Kivu, ekomi na rapport moko Humarn Rights Watch (HRW) mpe Groupe d’études ya Congo (GEC).

"Koleka mangomba 130 ya basimba minduki bazali na monyele (est) ya Congo démocratique," eyebisi Lewis Mudge, mokambi ya Afrique centrale ya HWR.

Na mibu miye mibale, violence (mobulu) ezali kowuta mingi na Beni wapi pene na moko kati na misato ya bobomi ya ba civils mosalamaki, elobi ya rapport yango.

Bobomami boye bosalami mingi likolo ya bitumba kati na mapinga ya Congo démocratique (FARDC) na basimba minduki ya Ouganda ya ba musulmans, ba ADF (Allied Democratic Forces).

Ba ADF bafundama mpo na liwa ya ba nkama ya ba civils banda 2014.

Kaka 20% ya bobomi boye bosalama nzinga nzinga na 20 kms ya mine to esika ya koluka makele.

XS
SM
MD
LG